Mokolo ya mibale ya esengo
Aisha Muamba
Aisha Muamba

Ezalaki na elenge mwasi moko na kombo ya Linda. Azalaki kofanda na ba ndeko na ye mibale ya basi, ya mobali na maman na bango. Azalaki mwana ya esengo pe mwasi ya mosala.

1

Azalaki na moninga ya malamu na kombo Stacy. Babandaki koyokana bango mibale pe tango nioso kokabolana masolo na bango.

2

Mikolo nioso ya mibale ya poso, Linda na Stacy bazalaki kokende kotala bafilm po bazalaki kopesa bango popcorn ofele.

3

Sima ya kotala film, babandaki kokende esika ya masano po nakoyoka bazembo. Pe kosepela kolia saint glace.

4

Oyo ezali mokolo ya esengo pona Linda. Kotala bafilm ya kitoko, pe kopesa bango popcorn ya ofele.

5

Bazembo na saint glace na esika ya masano na Stacy.

6

Tango ya esengo kosala moto ya suka te. Yekola kokabola esengo...

7

...bato oyo tokaboli na bango tango oyo.

8
You are free to download, copy, translate or adapt this story and use the illustrations as long as you attribute in the following way:
Mokolo ya mibale ya esengo
Author - Aisha Muamba
Translation - Theresa Nyemba
Illustration - Aisha Muamba
Language - Lingala
Level - First paragraphs