Ndembo ezali bomoyi
Pimville Library Soccer
Pimville Library Soccer

Bling azalaki kolinga makambo etali lisano ya ndembo.

Tango azali koloba pona lisano, alobaka mingi boye, "Ndembo ezali bomoyi!"

1

Bling azalaki moko ya babeti ndembo ya molakisi Tsepo.

Molakisi oyo azalaki na lolendo pona lingomba naye ya ndembo.

Bamingi balingaki basangana na bango.

2

Lisano moko ya motuya ezalaki koya.

Lingomba ezalaki koyekola mikolo nionso.

Bato nionso bazalaki na esengo po na lisano ya monene!

3

Molakisi ya lingomba yabatelemeli azalaki moto ya zuwa.

Azalaki na zuwa pona lokumu ya moninga naye molakisi Tsepo.

4

Bling abima pona ebandeli moko ya makasi na lisano.

Azalaki kokima mbango atia mokele.

5

Azangi ebeteli naye pe akweyi!

"Bling?" bato bangangi

"Bling?" molakisi Tsepo abondeli.

6

"Eloko moko te eko kanga ngayi nase!" Bling amilobeli.

"Ndembo ezali bomoyi."

Atelemi pe abeti tii na suka.

7

Molakisi ya zuwa akendeki nalopango ya masano na butu liboso ya bokutani.

Alonaki eloko moko ya mabe.

Alonaki Kisi!

8
You are free to download, copy, translate or adapt this story and use the illustrations as long as you attribute in the following way:
Ndembo ezali bomoyi
Author - Pimville Library Soccer
Translation - Guillain Sompa, Theresa Nyemba
Illustration - Pimville Library Soccer
Language - Lingala
Level - First paragraphs