Mosali ya makambo ya kobombama
Linda Liphondo
Linda Liphondo

Tango moko, ezalaki na mwana moko ya mwasi na kombo ya Kay.

Baboti ya kay bazalaki namayele mingi na science. Bazalaki kosala makambo ya bobombami na mosala na bango.

1

Mosali ya science ya mabe na kombo ya monganga devious alingaki koyeba makambo oyo ekomami na mabombami oyo ya mosala (ya baboti ya Kay).

Nabutu moko monganga Devious atindaki moto na ye nakombo ya Dan ya makambo ya mabe ayiba baboti ya Kay.

2

Dan azuwaki baboti. Etikalaki moke azuwa Kay, kasi azalaki moke pe mbangu mingi. Azuwaki nzela ya kosielumuka na misapi ya Dan.

Kay akimaki lokola mwinda ya kake.

3

Tango atikaki kokima, Kay amimonaki nakati ya zamba ya molili, etondi naba nzete.

Lokola azalaki kotala likolo, Kay atuti libaku pe akweyi!

4

Akweyaki nase, nase, nase, pe atuta moto naye.

Tango Kay alamukaki, azalaki na ndako moko ya kitoko pena teve ya monene.

5

"Aloo Kay," moto ya teve alobi.

"Nazali mosali ya makambo ya bobombami pona bolamu ya mokili!

Ozali sikoyo mosali na biso ya sika ya makambo ya bobombami!"

Na maloba oyo, Kay akomi makasi lokola mbwa ya zamba.

6

Sima baboti bazongi na ndako, Kay akendaki na nzete komona moto oyo amonaki na teve.

Amonaki nzete yango kasi ekuke ezalaki lisusu te.

Kay afandaki nase pe atalaki likolo na ba nzete.

7

Mosali Kay abimaki na ekuke moko oyo ezalaki nakati ya nzete.

Akendeki mbango epayi ya monganga Devious azalaki kofanda pe abundisi ye kaka bango mibale.

Bitumba yango esalaki mikolo mibale, tiii Kay alonga!

8
You are free to download, copy, translate or adapt this story and use the illustrations as long as you attribute in the following way:
Mosali ya makambo ya kobombama
Author - Linda Liphondo, Sbusiso Boikanyo
Translation - Guillain Sompa, Theresa Nyemba
Illustration - Linda Liphondo, Sbusiso Boikanyo
Language - Lingala
Level - Longer paragraphs