Bambwa na ngayi ya bolingo
Priscilla K
Priscilla K

Nazuaka mokano ya kopesa bango kombo ya Royalty na Blackie.

1

Royalty azalaki na langi ya kaki pe azalaki lokola mwasi ya mokonzi.

Blackie azalaki mbwa ya bolingo na langi ya moyindo na ba suki ya milayi.

2

Namesanaki ko tambwisa bango mikolo nionso soki nawuti eteyelo.

3

Tango mosusu na sokolaka bango ngayi moko.

Royalty azalaki kokima tango nioso!

4

Pena sima tolongwaka pe tokenda na ndako ya etage.

Pe kuna balingaka bambwa te.

5

Nakutaki ke Blackie abunga, pe Royalty azalaki kaka ye moko.

Nayokaka mabe makasi na motema na ngayi.

6

Mama na ngayi azwelaka ngayi ba mbwa ya bana mibale. Bazalaka kitoko makasi!

7

Bongo totikaka Blackie na Royalty epayi ya bana ya mama leki na ngayi.

Natongo moko, nazwaka mokano ya kokende kotala bambwa na ngayi.

8
You are free to download, copy, translate or adapt this story and use the illustrations as long as you attribute in the following way:
Bambwa na ngayi ya bolingo
Author - Priscilla K
Translation - Guillain Sompa, Theresa Nyemba
Illustration - Priscilla K
Language - Lingala
Level - First sentences